22 Bongo Samwele alobaki boye: “Yehova asepelaka nde na makabo ya kotumba+ mpe na bambeka koleka kotosa mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa+ eleki mbeka,+ kotya likebi eleki mafuta+ ya bampate-mibali;
7 Yehova akosepela nde na bankóto ya bampate-mibali, bankóto zomi zomi ya mikɛli ya mafuta?+ Nakopesa nde mwana na ngai ya liboso ya mobali mpo na botomboki na ngai, mbuma ya libumu na ngai mpo na lisumu ya molimo na ngai?+
33 mpe kolinga ye na motema na yo mobimba mpe na bososoli na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso mpe kolinga mozalani na yo lokola yo moko ezali malamu mingi koleka makabo nyonso ya kotumba mobimba mpe bambeka.”+