Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 9:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bongo, na likanisi na bango moko, basalaki na mayele+ mpe bakendaki kozwa biloko ya kolya mpe bakamataki basaki oyo ebebabebá mpo na bampunda na bango, milangi ya vinyo ya mposo ya nyama oyo elɛmbalɛmbá mpe epasuká mpe bakangakangá,+

  • 1 Samwele 23:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Nabondeli bino, bókende, bókoba mwa moke lisusu mpe bóluka koyeba malamumalamu mpe bótala esika oyo lokolo na ye elekaka, moto nyonso oyo amonaki ye kuna, mpo bayebisi ngai ete azali mpenza na mayele mabe.+

  • Masese 15:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Moto nyonso ya zoba atyolaka disiplini ya tata na ye,+ kasi moto nyonso oyo atyaka likebi na mpamela azali ekɛngɛ.+

  • Matai 10:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Talá! Nazali kotinda bino lokola bampate na kati ya bambwa ya zamba;+ yango wana, bózala ekɛngɛ lokola banyoka+ kasi bózala na ngambo te lokola bibenga.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto