Masese 15:23 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Moto azalaka na esengo mpo na eyano ya monɔkɔ na ye,+ mpe liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi!+ Masese 24:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 Ye oyo azali koyanola na bosembo akopwɛpwa mbɛbu.+ Mosakoli 12:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Moyanganisi alukaki kozwa maloba ya kitoko+ mpe ndenge ya kokoma maloba ya solo na bosikisiki.+ Yisaya 50:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso apesi ngai lolemo ya bato oyo bateyami,+ mpo nayeba ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi.+ Alamwisaka ntɔngɔ na ntɔngɔ; alamwisaka litoi na ngai mpo nayoka lokola bato oyo bateyami.+
23 Moto azalaka na esengo mpo na eyano ya monɔkɔ na ye,+ mpe liloba oyo elobami na ntango na yango mpenza ezali malamu mingi!+
4 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso apesi ngai lolemo ya bato oyo bateyami,+ mpo nayeba ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi.+ Alamwisaka ntɔngɔ na ntɔngɔ; alamwisaka litoi na ngai mpo nayoka lokola bato oyo bateyami.+