Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 20:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Osengeli te kozala motatoli oyo azali kotatola lokuta mpo na moninga na ye.+

  • Nzembo 52:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Lolemo na yo, oyo epeli lokola razware, ezali kokana kobimisa minyoko,+

      Ezali kosala na bokosi.+

  • Nzembo 57:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Molimo na ngai ezali na katikati ya bankɔsi;+

      Nazali na likambo mosusu ya kosala te kaka kolala na kati ya bato oyo badundaka, ɛɛ bana ya bato,

      Baoyo mino na bango ezali makɔnga mpe makula,+

      Mpe baoyo lolemo na bango ezali mopanga oyo epeli.+

  • Nzembo 120:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Eloko nini bakopesa yo, mpe eloko nini bakobakisela yo,

      Ee yo lolemo ya bokosi?+

  • Nzembo 140:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bapelisi lolemo na bango lokola oyo ya nyoka;+

      Ngɛngɛ ya etupa ya maseke ezali na nse ya mbɛbu na bango.+ Sela.

  • Yirimia 9:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpe bazali kogumba lolemo na bango lokola litimbo na bango na makambo ya lokuta;+ kasi nguya oyo bazali na yango na mokili ezali mpo na bosembo te.

      “Bazali kobima mpo na kosala kaka mabe na mabe, mpe babosani kutu ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Yakobo 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ɛɛ, lolemo ezali mɔtɔ.+ Na binama ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili oyo etondi na makambo ya kozanga boyengebene, mpo etyaka matɔnɔ na nzoto mobimba,+ ebebisaka bomoi mobimba* mpe ezikisaka yango lokola Gehena.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto