Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 11:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe basaleli na yo oyo nyonso bakokita mpenza epai na ngai mpe bakofukama bilongi na nse liboso na ngai+ mpe bakoloba ete: ‘Kende, yo ná bato nyonso oyo bazali kolanda matambe na yo.’ Mpe nsima na yango, nakobima.” Na yango, alongwaki epai ya Farao, abimi na nkanda makasi.

  • 1 Ntango 12:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe Bagade mosusu bakabwanaki na bandeko na bango, balandi Davidi na esika oyo ezali mpasi mpo na kokóma kuna, na esobe,+ bilombe, mibali ya nguya, mibali ya limpinga—mpo na etumba—bato oyo babongisá malamu nguba ya monene mpe likɔnga,+ bato oyo bilongi na bango ezalaki lokola bilongi ya bankɔsi,+ mpe mpo na mbangu, bazalaki lokola bamboloko likoló ya bangomba.+

  • Danyele 3:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Shadrake, Meshake ná Abedenego bayanolaki, mpe balobaki na mokonzi boye: “Ee Nebukadenezare, tozali na ntina ya kozongisela yo liloba te na likambo oyo.+

  • Misala 4:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Nzokande ntango bamonaki elobeli ya polelepolele ya Petro ná Yoane, mpe basosolaki ete bazalaki bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba,+ bakómaki kokamwa. Mpe bayaki koyeba malamu ete bazalaki elongo na Yesu;+

  • Misala 14:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Na yango, balekisaki ntango mingi mpenza, bazali koloba na mpiko na bokonzi oyo euti na Yehova, oyo apesaki litatoli mpo na liloba ya boboto monene na ye na ndenge apesaki nzela ete bilembo mpe makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya esalema na mabɔkɔ na bango.+

  • 1 Batesaloniki 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 kasi ete, nsima ya konyokwama+ liboso mpe kosambwisama mabe+ na Filipi+ (kaka ndenge boyebi), tozwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso mpo na kolobela+ bino nsango malamu ya Nzambe na bitumba mingi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto