-
Kobima 18:21Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
21 Kasi yo moko osengeli kopona kati na bato nyonso mibali oyo bakoki,+ oyo babangaka Nzambe,+ mibali oyo babongi kotyelama motema,+ oyo bayinaka litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,+ mpe osengeli kotya bango bázala bakonzi na bango, bázala bakonzi ya bato nkóto nkóto,+ bakonzi ya bato nkama nkama, bakonzi ya bato ntuku mitano ntuku mitano mpe bakonzi ya bato zomi zomi.+
-
-
Yisaya 33:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 “Ezali na moto oyo azali kotambola na boyengebene ya ntango nyonso+ mpe azali koloba makambo ya sembo,+ oyo azali koboya litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe oyo euti na misala ya kobuba,+ oyo azali koningisa mabɔkɔ na ye mpo na kosimba kanyaka te,+ oyo azali kokanga matoi na ye mpo na koyoka makambo ya kosopa makila te, mpe oyo azali kokanga miso na ye mpo amona makambo ya mabe te.+
-