41 Nzokande, Esau abombelaki Yakobo nkanda na motema mpo na lipamboli oyo tata na ye apambolaki ye,+ mpe Esau azalaki kaka koloba na motema na ye ete:+ “Mikolo ya kolela tata na ngai ekómi pene.+ Nsima na yango, nakoboma Yakobo ndeko na ngai.”+
31 Mpo mikolo nyonso oyo mwana ya Yese akozala na bomoi na mabele, yo ná bokonzi na yo bokoumela te.+ Sikoyo, tindá bákende kozwela ngai ye, mpo asengeli kokufa.”+
12 ezala te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe mpe abomaki+ ndeko na ye. Mpe abomaki ye mpo na nini? Mpo misala na ye moko ezalaki mabe,+ kasi oyo ya ndeko na ye ezalaki ya boyengebene.+