Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Tiká nalobela mobeko ya Yehova;

      Ye alobi na ngai ete: “Yo ozali mwana na ngai;+

      Lelo ngai nakómi tata na yo.+

  • Matai 1:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Akobota mwana mobali, mpe okopesa ye nkombo Yesu,+ mpo akobikisa+ bato na ye+ na masumu na bango.”+

  • Yoane 5:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpo Tata azali kosambisa ata moto moko te, kasi apesi kosambisa nyonso na mabɔkɔ ya Mwana,+

  • Misala 4:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Lisusu, lobiko ezali na moto mosusu te, mpo nkombo+ mosusu ezali te na nse ya lola, oyo epesami na kati ya bato, oyo tosengeli kobika na nzela na yango.”+

  • Bafilipi 2:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 oyo, atako azalaki na lolenge ya Nzambe,+ azwaki makanisi te ya kobɔtɔla bokonzi, elingi koloba, ete akokana na Nzambe.+

  • 1 Timote 2:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo ezali na Nzambe kaka moko,+ mpe moyokanisi+ kaka moko na kati ya Nzambe+ ná bato,+ moto moko, Kristo Yesu,+

  • Baebre 6:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 epai moto oyo aleki liboso akɔtaki mpo na biso,+ Yesu, oyo akómi nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke libela na libela.+

  • Emoniseli 19:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe na elamba na ye ya likoló, ɛɛ na ebɛlɔ na ye, azali na nkombo moko ekomami: Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto