Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 14:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Bato nyonso oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi bazwi nde boyebi te,+

      Bazali nde kolya bato na ngai ndenge balyaka limpa?+

      Babeleli kutu Yehova te.+

  • Masese 22:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ye oyo azali kobuba moto oyo azangá mpo ye moko azwa biloko mingi+—mpe ye oyo azali kopesa mozwi—akokelela solo.+

  • Yisaya 32:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo moto oyo asilá nsɔni, bisaleli na ye ezali mabe;+ apesi toli mpo na misala ya etamboli ya nsɔni,+ mpo na kobebisa bato ya mpasi na maloba ya lokuta,+ ata ntango mobola azali koloba oyo ezali sembo.

  • Mika 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 bino baoyo bolei mpe mosuni ya bato na ngai,+ mpe bolongoli loposo na bango mpenza, mpe bobukibuki mpenza mikuwa na bango, mpe bokatikati yango lokola eloko oyo ezali na kati ya nzungu moko ya monɔkɔ monene mpe lokola mosuni na kati ya nzungu ya kolambela.+

  • Habakuku 3:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Na mangenda na ye moko otɔbɔlaki+ motó ya babundi na ye ntango bayaki lokola mopɛpɛ makasi mpo na kopanza ngai.+ Esengo monene na bango ezalaki lokola ya bato oyo bakani kolya moto ya mpasi na esika ya kobombana.+

  • Marko 12:40
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 Bazali bato oyo balyaka bandako+ ya basi oyo mibali bakufá mpe mpo na kokosa basalaka mabondeli milaimilai; bango bakozwa lisambisi moko ya makasi koleka.”+

  • Yakobo 5:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Talá! Bokangi lifuti oyo basali oyo babukaki mbuma ya bilanga na bino basengeli kozwa,+ ezali kokoba koganga,+ mpe kolela ya babuki-mbuma oyo bazali kosɛnga lisalisi+ ekɔti na matoi+ ya Yehova ya mampinga.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto