-
Basambisi 14:18Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
18 Bongo, na mokolo ya nsambo, liboso kutu Samsone akɔta na shambrɛ na ye ya kati,+ mibali ya engumba balobaki na ye boye:
“Eloko nini eleki mafuta ya nzoi na elɛngi,
Mpe eloko nini eleki nkɔsi na makasi?”+
Bongo ye alobaki na bango ete:
“Soki bobalolaki mabele ná mwana-ngɔmbɛ na ngai ya mwasi+ te,
Bolingaki kozwa sambole na ngai te.”+
-
-
Yisaya 31:4Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 Mpo talá oyo Yehova alobi na ngai: “Se ndenge nkɔsi, ɛɛ mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki,+ engulumaka mpo na nyama oyo yango ekangi, ntango babengeli yango etuluku mobimba ya babateli ya mpate, kasi ata mpo na mongongo na bango, akobanga te mpe ata mpo na makɛlɛlɛ na bango, akogunzama te; ndenge yango nde Yehova ya mampinga akokita mpo na kobundela Ngomba Siona mpe ngomba moke na ye.+
-