Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 10:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Komɛla vinyo te to masanga oyo elangwisaka,+ yo ná bana na yo ya mibali elongo na yo, ntango bokokɔta na hema ya kokutana, mpo bókufa te. Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino,

  • Estere 3:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bamemi-mikanda babimaki, bakendaki mbangu+ mpo na liloba ya mokonzi, mpe mobeko yango epesamaki na Shushane+ ndako monene. Mokonzi ná Hamane bafandaki mpo na komɛla;+ kasi engumba ya Shushane+ ekɔtaki mobulu.+

  • Mosakoli 10:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Ee mokili, esengo na yo ntango mokonzi na yo azali mwana ya bato ya lokumu mpe bankumu na yo balyaka na ntango oyo esengeli mpo na kozwa nguya, kasi bamɛlaka mingi te.+

  • Yisaya 28:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ná baoyo mpe—mpo na vinyo babungi nzela mpe mpo na masanga oyo elangwisaka batelengani. Nganga-nzambe mpe mosakoli+—babungi nzela mpo na masanga oyo elangwisaka, babulungani mpo na vinyo, batelengani+ mpo na masanga oyo elangwisaka; babungi nzela na bimonaneli na bango, bazwi kizunguzungu mpe bayebi ekateli te.

  • Danyele 5:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bamɛlaki vinyo, mpe basanzolaki banzambe ya wolo mpe ya palata, ya motako, ya ebende, ya nzete mpe ya libanga.+

  • Hosea 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Pite, vinyo ná vinyo ya elɛngi, yango nde biloko oyo elongolaka makanisi* ya malamu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto