Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 13:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Kasi mwasi na ye alobaki na ye boye: “Soki Yehova asepelaki nde koboma biso, mbɛlɛ andimaki te likabo ya kotumba mpe likabo ya mbuma oyo euti na lobɔkɔ na biso,+ mpe alingaki te kolakisa biso makambo oyo nyonso, mpe alingaki te kotika biso tóyoka likambo ya boye ndenge asali yango sikoyo.”+

  • 1 Samwele 25:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe likambo oyo esala te ete otengatenga to motema ya nkolo na ngai ebɛta libaku na kosopáká makila kozanga ntina+ mpe na kotikáká lobɔkɔ ya nkolo na ngai ebikisa ye.+ Mpe Yehova akosalela mpenza nkolo na ngai bolamu, mpe osengeli kokanisa+ moombo na yo.”

  • 2 Samwele 20:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe mwasi moko ya bwanya+ abelelaki longwa na engumba ete: “Bóyoka, bóyoka! Nabondeli bino, bóloba na Yoabe boye: ‘Pusaná penepene awa, naloba na yo.’”

  • Estere 5:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Soki nandimami na miso ya mokonzi+ mpe soki emonani malamu na miso ya mokonzi ete akokisa lilɔmbɔ na ngai mpe apesa eloko oyo ngai nazali kosɛnga, tiká mokonzi ná Hamane báya na fɛti oyo nakosalela bango lobi, mpe lobi nakosala ndenge mokonzi alobi.”+

  • Nzembo 68:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yehova ye moko azali kobimisa liloba;+

      Basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.+

  • Masese 31:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Maloba ya mokonzi Lemuele, maloba ya kilo+ oyo mama na ye ayebisaki ye mpo na kosembola ye:+

  • Misala 18:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe moto yango abandaki koteya na mpiko na kati ya sinagoga. Ntango Prisile ná Akila+ bayokaki ye, bakamataki ye esika moko na bango mpe bamonisaki ye polele nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.

  • Tito 2:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mibange basi+ mpe bázala na etamboli ya kobanga Nzambe, bákoselaka bato makambo te,+ bázala baombo ya vinyo te, bateyi ya makambo malamu;

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto