Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Mpe ekosalema mpenza boye: soki okoyoka te mongongo ya Yehova Nzambe na yo na kokebáká ete osalela mitindo na ye nyonso mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo lelo, bilakeli mabe oyo nyonso esengeli kokitela yo mpe kozwa yo:+

  • Yosua 7:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Sikoyo, Yosua ná bana nyonso ya Yisraele elongo na ye, bazwaki Akana+ mwana ya Zera mpe palata, elamba ya lokumu mpe eteni ya wolo,+ bana na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi mpe ngɔmbɛ na ye, mpunda na ye, etonga na ye, hema na ye ná nyonso oyo azalaki na yango mpe bamemaki bango na lobwaku ya patatalu ya Akore.+

  • Estere 9:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Kasi ntango Estere akɔtaki liboso ya mokonzi, mokonzi alobaki na nzela ya mokanda+ ete: “Mwango+ na ye ya mabe oyo akanaki kosala Bayuda ezongela motó na ye moko”;+ mpe bakakisaki ye ná bana na ye na nzete.+

  • Zekaria 5:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 ‘Natindi yango,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘mpe yango ekokɔta mpenza na ndako ya moyibi mpe na ndako ya moto oyo azali kolapa ndai na nkombo na ngai na lokuta;+ mpe yango ekofanda mpenza na kati ya ndako na ye mpe ekosilisa yango nyɛɛ ná mabaya na yango ná mabanga na yango.’”+

  • Baroma 2:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi lokola ozali motema makasi+ mpe oboyi kobongola motema,+ ozali nde komibendela nkanda+ na mokolo ya nkanda+ mpe Nzambe akomonisa+ nkanda yango na mokolo oyo akosambisa na boyengebene.+

  • Bakolose 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ezali mpo na makambo wana nde nkanda ya Nzambe ezali koya.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto