Masese 20:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Kolinga mpɔngi te, noki okóma na bobola.+ Fungolá miso na yo; tondá na limpa.+ Masese 24:33 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 33 Mwa mpɔngi moke, kokanga miso mwa moke, kokanga mabɔkɔ mwa moke mpo na kolala,+ Masese 26:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Moto ya gɔigɔi akɔtisi lobɔkɔ na ye na kibakuli ya fɛti; alɛmbi mingi mpo akoka ata kozongisa yango na monɔkɔ na ye.+ Mosakoli 4:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Zoba azali kokanga mabɔkɔ na ye+ mpe azali kolya mosuni na ye moko.+
15 Moto ya gɔigɔi akɔtisi lobɔkɔ na ye na kibakuli ya fɛti; alɛmbi mingi mpo akoka ata kozongisa yango na monɔkɔ na ye.+