7 Na mikolo oyo azalaki na nzoto ya bomoto, Kristo alɔmbaki mpe lisusu asɛngaki+ Oyo azalaki na likoki ya kobikisa ye na liwa, na koganga makasi+ mpe na mpisoli, mpe ayokaki ye mpe andimaki ye mpo na ezaleli na ye ya kobanga Nzambe.+
16 Yango wana, bóyambolaka+ masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelelanaka, mpo bóbikisama.+ Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.+
12 Mpo miso+ ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango;+ kasi elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo basalaka makambo ya mabe.”+