7 Kasi Yehova alobaki na Samwele ete: “Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te,+ mpo ngai naboyi ye. Mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te,+ mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso;+ kasi Yehova, amonaka ndenge motema+ ezali.”
12 Soki okoloba: “Talá! Toyebaki likambo yango te,”+ ye oyo amekamekaka mitema mpo na koyeba ndenge ezali, ye moko akososola nde yango te+ mpe ye oyo azali kotalatala molimo na yo, ye moko akoyeba+ yango mpe akofuta moto ya mabele na kolanda mosala na ye te?+
15 Bongo alobaki na bango ete: “Bino nde bato oyo bomitángaka bino moko bayengebene liboso ya bato,+ kasi Nzambe ayebi mitema+ na bino; mpo eloko ya ntina na miso ya bato ezali eloko ya bosɔtɔ na miso ya Nzambe.+