Masese 14:35 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 35 Mokonzi asepelaka na mosaleli oyo azali kosala na mayele ya kososola,+ kasi nkɛlɛ na ye eyelaka ye oyo asalaka na ndenge ya nsɔni.+ Masese 20:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 Mokonzi ya bwanya azali kopanza bato mabe,+ mpe abalusaka yiká likoló na bango.+ Luka 12:48 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 48 Kasi oyo akangaki ntina te+ mpe asalaki makambo oyo ebongi na kobɛtama, akobɛtama moke.+ Ya solo, moto nyonso oyo bapesi ye mingi, bakosɛnga ye mingi;+ mpe moto oyo bapesi ye mokumba monene, bakosɛnga ye mingi koleka ndenge esɛngamaka.+
35 Mokonzi asepelaka na mosaleli oyo azali kosala na mayele ya kososola,+ kasi nkɛlɛ na ye eyelaka ye oyo asalaka na ndenge ya nsɔni.+
48 Kasi oyo akangaki ntina te+ mpe asalaki makambo oyo ebongi na kobɛtama, akobɛtama moke.+ Ya solo, moto nyonso oyo bapesi ye mingi, bakosɛnga ye mingi;+ mpe moto oyo bapesi ye mokumba monene, bakosɛnga ye mingi koleka ndenge esɛngamaka.+