20 Mpe bazwaki lisalisi mpo na kobunda na bango, bongo Bahagri mpe baoyo nyonso bazalaki elongo na bango bapesamaki na lobɔkɔ na bango, mpo babelelaki nde Nzambe mpo na kosɛnga lisalisi+ na etumba yango, mpe ye andimaki libondeli na bango mpamba te batyelaki ye motema.+
10 Yango wana, tozali kosala mosala makasi mpe koboma nzoto,+ mpo totye elikya+ na biso epai ya Nzambe moko ya bomoi, oyo azali Mobikisi+ ya bato ya ndenge nyonso,+ mingimingi mpenza ya bato ya sembo.+