22 Mpe bango nyonso babandaki kopesa litatoli ya malamu mpo na ye mpe kokamwa na maloba kitoko+ oyo ezalaki kobima na monɔkɔ na ye, mpe bazalaki koloba ete: “Oyo mwana ya Yozefe te?”+
11 Na yango, lokola toyebi ntina ya kobanga+ Nkolo, tozali kokoba kondimisa+ bato, kasi tomonani polele na miso ya Nzambe. Nzokande, nazali na elikya ete tomonani mpe polele na lisosoli na bino.+