Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Sikoyo nyoka+ ezalaki ekɛngɛ+ koleka banyama nyonso ya zamba ya mokili oyo Yehova Nzambe asalaki.+ Na bongo abandaki koloba na mwasi+ ete: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?”+

  • 1 Samwele 24:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe Davidi alobaki na Saulo lisusu boye: “Mpo na nini ozali koyoka maloba ya bato+ oyo bazali koloba ete: ‘Talá! Davidi azali koluka kosala yo mabe’?

  • Masese 18:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Maloba ya moto oyo akoselaka bato makambo ezali lokola biloko oyo esengeli komɛlama na lokoso,+ biloko oyo ekitaka na kati mpenza ya libumu.+

  • Baroma 16:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bandeko, sikoyo nazali kolendisa bino, ete bókeba na bato oyo bakɔtisaka bokabwani+ mpe makambo oyo ebɛtisaka libaku oyo eyokani te na mateya+ oyo boyekolaki, mpe bóboya kozala elongo na bango.+

  • 2 Bakorinti 12:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpo nazali kobanga ete ezala na ndenge nini, ntango nakoya,+ naya kokuta bino te ndenge oyo nalingi mpe namonana epai na bino te ndenge oyo bolingi, kasi nazali kobanga noki nakuta nde koswana, zuwa,+ bankanda, kowelana, kotɔngana, banungunungu, kovimba na lolendo, mobulu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto