Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 18:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, basaleli zomi oyo bazalaki komema bibundeli ya Yoabe bazingaki ye mpe babɛtaki Abisalome mpo báboma+ ye.

  • 2 Samwele 20:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na mbala moko, mwasi yango, na bwanya+ na ye, akendaki epai ya bato nyonso mpe bakataki motó ya Sheba mwana ya Bikri mpe babwakelaki Yoabe yango. Bongo ayulaki liseke,+ mpe batikaki engumba yango, bapanzanaki moto na moto na ndako na ye; kasi Yoabe azongaki na Yerusaleme epai ya mokonzi.

  • 1 Bakonzi 2:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpe sikoyo, lokola Yehova azali solo na bomoi,+ ye oyo apiki ngai makasi+ mpe azali kofandisa ngai na kiti ya bokonzi ya tata na ngai Davidi+ mpe ye oyo asaleli ngai ndako+ kaka ndenge alobaki,+ lelo Adoniya akobomama.”+

  • Estere 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Sikoyo Harabona,+ moko ya basali ya mokonzi,+ alobaki ete: “Lisusu, nzete+ oyo Hamane asalelaki Mordekai, oyo alobaki malamu mpo na mokonzi,+ ezali, etɛlɛmi na ndako ya Hamane—ezali na bolai ya mapeko ntuku mitano (50).” Bongo mokonzi alobaki ete: “Bókakisa ye na yango.”+

  • Matai 21:41
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 Bango balobaki na ye ete: “Lokola bazali bato mabe, akoboma bango koboma mpenza+ mpe akotika elanga ya vinyo na mabɔkɔ ya basali-bilanga mosusu, oyo bakopesa ye mbuma na eleko na yango.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto