Nzembo 18:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Yehova azali libanga na ngai, esika makasi ya libateli na ngai mpe Mobikisi na ngai.+Nzambe na ngai azali libanga na ngai. Nakokima epai na ye,+Nguba na ngai mpe liseke na ngai ya lobiko, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.+ Nzembo 71:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Zalá ndako na ngai ya makasi ya libanga, epai nakokɔta ntango nyonso.+Osengeli kopesa mitindo mpo na kobikisa ngai,+Mpo yo ozali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai ya libateli.+ Nzembo 91:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Lokola alingaka ngai mingi,+Ngai mpe nakobikisa ye.+Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.+
2 Yehova azali libanga na ngai, esika makasi ya libateli na ngai mpe Mobikisi na ngai.+Nzambe na ngai azali libanga na ngai. Nakokima epai na ye,+Nguba na ngai mpe liseke na ngai ya lobiko, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.+
3 Zalá ndako na ngai ya makasi ya libanga, epai nakokɔta ntango nyonso.+Osengeli kopesa mitindo mpo na kobikisa ngai,+Mpo yo ozali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai ya libateli.+