Masese 10:31 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 31 Monɔkɔ ya moyengebene—ebotaka mbuma ya bwanya,+ kasi lolemo ya makambo ya kilikili ekolongolama.+ Masese 11:30 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 30 Mbuma ya moyengebene nde nzete ya bomoi,+ mpe ye oyo azwi milimo azali moto ya bwanya.+ Matai 15:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 Kasi makambo oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema, mpe makambo wana nde ekómisaka moto mbindo.+ Baefese 4:29 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 29 Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te,+ kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.+ Yakobo 3:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Ɛɛ, lolemo ezali mɔtɔ.+ Na binama ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili oyo etondi na makambo ya kozanga boyengebene, mpo etyaka matɔnɔ na nzoto mobimba,+ ebebisaka bomoi mobimba* mpe ezikisaka yango lokola Gehena.
29 Liloba ya kopɔla ebima na monɔkɔ na bino te,+ kasi nde liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki eloko ya malonga.+
6 Ɛɛ, lolemo ezali mɔtɔ.+ Na binama ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili oyo etondi na makambo ya kozanga boyengebene, mpo etyaka matɔnɔ na nzoto mobimba,+ ebebisaka bomoi mobimba* mpe ezikisaka yango lokola Gehena.