1 Ntango 29:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Mpo liboso na yo tozali bato oyo bafandi bapaya mpe bato oyo bautá na mboka mosusu+ lokola bankɔkɔ na biso nyonso. Mikolo na biso na mabele ezali lokola elili+ mpe elikya ezali te. Yobo 8:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Mpo biso tozali se bato ya lobilobi awa,+ mpe toyebi eloko moko te,Mpo mikolo na biso na mabele ezali elili.+ Yobo 14:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Abimi lokola fololo, mpe akatami,+Mpe akimaka lokola elili+ mpe azalaka lisusu te. Nzembo 102:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mikolo na ngai ezali lokola elili oyo ekiti,+Mpe ngai, nakauki lokola matiti mpamba.+ Nzembo 144:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Moto azali lokola mwa mopɛpɛ;+Mikolo na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.+
15 Mpo liboso na yo tozali bato oyo bafandi bapaya mpe bato oyo bautá na mboka mosusu+ lokola bankɔkɔ na biso nyonso. Mikolo na biso na mabele ezali lokola elili+ mpe elikya ezali te.
9 Mpo biso tozali se bato ya lobilobi awa,+ mpe toyebi eloko moko te,Mpo mikolo na biso na mabele ezali elili.+