Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 25:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Na nsima, Abigaile akɔtaki epai ya Nabale, mpe talá, azalaki kosala fɛti moko na ndako na ye lokola fɛti ya mokonzi;+ mpe motema ya Nabale eyokaki esengo na kati na ye, mpe alangwaki mpenza kolangwa;+ mpe Abigaile ayebisaki ye eloko moko te, ya moke to ya monene, tii ntɔngɔ etanaki.

  • Masese 21:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Ye oyo alingi kosakanasakana akozala moto ya kokelela;+ ye oyo alingi vinyo mpe mafuta akozwa bomɛngo te.+

  • Danyele 5:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mokonzi Beleshazare+ asalelaki bato minene na ye nkóto moko (1 000) fɛti moko monene, mpe azalaki komɛla vinyo+ liboso ya bato yango nkóto moko.

  • Hosea 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na mokolo ya mokonzi na biso, bankumu babɛlaki+—bayoki nkanda makasi mpo na vinyo.+ Mokonzi asemboli lobɔkɔ na ye elongo na batyoli.

  • Marko 6:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Kasi mokolo moko, libaku+ emonanaki ntango Erode abongisaki bilei ya mpokwa na mokolo ya mbotama+ na ye mpo na bato na ye ya bibonga minene mpe bakomanda ya basoda mpe bato minene ya Galile.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto