Kobima 23:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 “Osengeli te kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ekoki kobulunganisa maloba ya bayengebene.+ 1 Samwele 8:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Nde bana na ye batambolaki na banzela na ye te,+ kasi bazalaki kolinga kolanda litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe+ mpe bazalaki kondima kanyaka+ mpe kopɛngwisa lisambisi.+ Masese 17:23 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Moto mabe akozwa kanyaka oyo euti na ntolo+ mpo na kotɛngisa banzela ya bosembo.+
8 “Osengeli te kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ekoki kobulunganisa maloba ya bayengebene.+
3 Nde bana na ye batambolaki na banzela na ye te,+ kasi bazalaki kolinga kolanda litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe+ mpe bazalaki kondima kanyaka+ mpe kopɛngwisa lisambisi.+