Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 7:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Ntango namonaki+ na biloko ya kopunza elamba moko ya lokumu oyo euti na Shinare,+ elamba moko ya kitoko, mpe shekele nkama mibale (200) ya palata mpe eteni ya wolo, oyo ezali na kilo ya shekele ntuku mitano (50), bongo nalulaki yango+ mpe nazwaki yango;+ mpe talá! ebombami na mabele na katikati ya hema na ngai, ná mbongo na nse na yango.”+

  • Ezekiele 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Omoni yango, Ee mwana ya moto? Makambo oyo eyinamá oyo bato ya ndako ya Yuda basali awa ezali nde likambo moke, mpo bátondisa lisusu mokili na mobulu+ mpe básilikisa ngai lisusu, mpe talá bazali kosembola mwa etape yango na zolo na ngai?

  • Ezekiele 16:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Mpe ozalaki kokamata bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi oyo obotelaki ngai,+ mpe ozalaki kopesa bango mbeka epai ya bikeko yango mpo bályama+—misala na yo ya bondumba ekosuka te?

  • 2 Timote 4:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Alezandre+ mosali ya biloko ya motako asalaki ngai mabe mingi—Yehova akozongisela ye na kolanda misala na ye+—

  • Yakobo 1:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Yango wana, bóbwaka mbindo nyonso mpe ezaleli oyo ezangi ntina: mabe,+ mpe bóndima na boboto liloba oyo ekoki kobikisa milimo na bino+ mpe efanda mpenza na kati na bino.+

  • 2 Petro 2:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Miso na bango etondá na ekobo+ mpe ekokaka kotika lisumu te,+ mpe bazali kobenda milimo oyo epikami te. Motema na bango emesaná na bilulela.+ Bazali bana oyo balakelamá mabe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto