Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 39:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Talá! Osali mikolo na ngai kaka moke;+

      Mpe mikolo ya bomoi na ngai ezali eloko te liboso na yo.+

      Ya solo moto nyonso ya mabele, ata atɛlɛmi ngwi, azali kaka mwa mopɛpɛ.+ Sela.

  • Mosakoli 2:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe ngai, ɛɛ ngai, natalaki misala na ngai nyonso oyo mabɔkɔ na ngai esalaki mpe mosala makasi oyo nasalaki makasi nakokisa,+ mpe talá! nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ,+ eloko moko ya litomba ezalaki te na nse ya moi.+

  • Mosakoli 2:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpo apesi moto oyo azali malamu na miso na ye+ bwanya ná boyebi ná esengo,+ kasi apesi mosumuki mosala ya koyanganisa mpe ya kosangisa kaka mpo na kopesa moto oyo azali malamu na miso ya Nzambe ya solo.+ Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+

  • Mosakoli 6:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Komona na miso eleki mposa makasi ya molimo.+ Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+

  • Luka 12:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo alobaki na bango ete: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela,+ mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto