Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 3:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Yango wana, mwasi amonaki ete nzete yango ezalaki malamu na kolya mpe ete ezalaki eloko oyo miso ekokaki kolula, ɛɛ, nzete yango ezalaki kitoko na kotala.+ Bongo akamataki mbuma na yango mpe alyaki. Na nsima apesaki mpe mobali na ye ntango azalaki elongo na ye mpe ye alyaki.+

  • Ebandeli 6:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bongo Nzambe atalaki mabele mpe, talá! yango ebebaki,+ mpamba te moto nyonso na mabele asilaki kobebisa nzela na ye.+

  • Ebandeli 11:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bongo balobaki ete: “Yaká! Tómitongela engumba mpe lisusu ndako molai oyo nsɔngɛ na yango ekei tii na likoló,+ mpe tómisalela nkombo ya lokumu,+ noki tópalangana na mabele mobimba.”+

  • Kolimbola Mibeko 32:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Bango moko nde babebisi makambo;+

      Bazali bana na ye te, mbeba ezali ya bango moko.+

      Libota moko oyo etɛngamá mpe egumbamá!+

  • Yirimia 2:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 ‘mpo bato na ngai basali makambo mibale ya mabe: Batiki kutu ngai,+ liziba ya mai ya bomoi,+ mpo bámitimwela mabulu, mabulu oyo ebukaná, oyo ekoki kobomba mai te.’

  • Marko 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Lisusu, alobaki na bango ete: “Na mayele, bozali kotya mobeko+ ya Nzambe pembeni mpo na kobatela bonkɔkɔ na bino.

  • Yakobo 1:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto