Mosakoli 2:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mpe ngai, ɛɛ ngai, natalaki misala na ngai nyonso oyo mabɔkɔ na ngai esalaki mpe mosala makasi oyo nasalaki makasi nakokisa,+ mpe talá! nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ,+ eloko moko ya litomba ezalaki te na nse ya moi.+ Yisaya 55:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Mpo na nini bozali kaka kobimisa mbongo mpo na eloko oyo ezali limpa te, mpe mpo na nini bozali koboma nzoto mpo na eloko oyo ezali kotondisa te?+ Bóyoka ngai na likebi, mpe bólya eloko oyo ezali malamu,+ mpe molimo na bino esepela mpenza na biloko ya mafuta.+ Matai 16:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 Mpo moto akozala na litomba nini soki azwi mokili mobimba kasi abungisi molimo na ye?+ to eloko nini moto akopesa na esika ya+ molimo na ye? Yoane 6:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Bósalaka mosala, ezala te mpo na bilei oyo ebebaka,+ kasi mpo na bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko,+ oyo Mwana ya moto akopesa bino; mpo ye nde Tata, ɛɛ Nzambe, atyá elembo ete andimi ye.”+
11 Mpe ngai, ɛɛ ngai, natalaki misala na ngai nyonso oyo mabɔkɔ na ngai esalaki mpe mosala makasi oyo nasalaki makasi nakokisa,+ mpe talá! nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ,+ eloko moko ya litomba ezalaki te na nse ya moi.+
2 Mpo na nini bozali kaka kobimisa mbongo mpo na eloko oyo ezali limpa te, mpe mpo na nini bozali koboma nzoto mpo na eloko oyo ezali kotondisa te?+ Bóyoka ngai na likebi, mpe bólya eloko oyo ezali malamu,+ mpe molimo na bino esepela mpenza na biloko ya mafuta.+
26 Mpo moto akozala na litomba nini soki azwi mokili mobimba kasi abungisi molimo na ye?+ to eloko nini moto akopesa na esika ya+ molimo na ye?
27 Bósalaka mosala, ezala te mpo na bilei oyo ebebaka,+ kasi mpo na bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko,+ oyo Mwana ya moto akopesa bino; mpo ye nde Tata, ɛɛ Nzambe, atyá elembo ete andimi ye.”+