8 Ee mwasi ya libala,+ yaká koo, elongo na ngai uta na Libá, elongo na ngai uta na Libá.+ Kitá koo, uta na nsɔngɛ ya Anti-Libá, uta na nsɔngɛ ya Senire,+ ɛɛ, Heremone,+ uta na bisika bankɔsi efandaka, uta na bangomba ya bankoi.
29 Moto oyo azwi mwasi na libala ye nde mobali ya mwasi yango.+ Nzokande, moninga ya mobali ya libala, ntango atɛlɛmi mpe azali koyoka ye, azali na esengo mingi mpo na mongongo ya mobali oyo abali. Na yango, esengo oyo ezali ya ngai etondi kotonda.+
9 Mpe moko ya baanzelu nsambo oyo bazalaki na mabakuli nsambo oyo etondaki na malɔzi nsambo+ ya nsuka ayaki, mpe asololaki na ngai mpe alobaki ete: “Yaká awa, nakolakisa yo mwasi ya libala, mwasi ya Mwana-Mpate.”+