Kolimbola Mibeko 26:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Na nsima, amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili moko oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Loyembo ya Salomo 4:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mbɛbu na yo ezali se kotangisa mafuta ya nzoi oyo ezali na ndako na yango,+ Ee mwasi na ngai ya libala. Mafuta ya nzoi+ mpe miliki ezali na nse ya lolemo na yo, mpe nsolo kitoko ya bilamba na yo ezali lokola nsolo kitoko+ ya Libá. Yisaya 7:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Akolya manteka mpe mafuta ya nzoi pene na ntango oyo akoyeba koboya mabe mpe kopona malamu.+
9 Na nsima, amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili moko oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+
11 Mbɛbu na yo ezali se kotangisa mafuta ya nzoi oyo ezali na ndako na yango,+ Ee mwasi na ngai ya libala. Mafuta ya nzoi+ mpe miliki ezali na nse ya lolemo na yo, mpe nsolo kitoko ya bilamba na yo ezali lokola nsolo kitoko+ ya Libá.