7Na yango, lokola tozali na bilaka wana,+ bandeko ya bolingo, tómipɛtola+ na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo,+ tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.+
2 Mpo nazali koyokela bino zuwa, zuwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe,+ mpo ngai mpenza nalakaki kobalisa bino+ na mobali+ kaka moko, mpo nabimisa bino lokola ngɔndɔ moko ya pɛto+ epai ya Kristo.+
27 mpo akoka kobimisa lisangá epai na ye moko na kitoko na yango,+ na litɔnɔ te, na lisusa te to na eloko moko te ya ndenge wana, kasi ezala nde mosantu mpe ezanga mbeba.+
14 Yango wana, bandeko ya bolingo, lokola bozali kozela makambo wana, bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka akuta bino na litɔnɔ te+ mpe na mbeba te mpe na kimya.+