Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 30:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 “Kasi yo, ozwa malasi ya kitoko koleka:+ shekele nkama mitano (500) ya matangá ya mire+ oyo ekangamá, mpe kinamono+ ya nsolo kitoko, katikati ya motángo wana, shekele nkama mibale na ntuku mitano (250), mpe nkokó+ ya nsolo kitoko, shekele nkama mibale na ntuku mitano,

  • Estere 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe ntango ngala ya elenge mwasi mokomoko ekómaki, wana basilisi kosalela ye makambo oyo basengelaki kosalela basi na boumeli ya sanza zomi na mibale, mpo na kokɔta epai ya Mokonzi Ahasueruse, mpo ndenge wana nde mikolo ya konyɔlisa bango nzoto na bankisi ezalaki kosalema: sanza motoba na mafuta ya mire+ mpe sanza motoba na mafuta ya balsame+ mpe na bankisi ya konyɔlisa basi nzoto;

  • Nzembo 45:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Bilamba na yo nyonso ezali malasi ya mire, nzete ya aloe ná kasia;+

      Longwa na ndako monene ya kitoko, ya mpɛmbɛ ya nzoku,+ bibɛtɛlo oyo ya bansinga esepelisi yo.

  • Loyembo ya Salomo 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Liboso ete mopɛpɛ ya moi epɛpa mokemoke+ mpe bilili elimwa, nakokende na ngai na ngomba ya mire mpe ngomba moke ya olibana.”+

  • Loyembo ya Salomo 5:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Matama na ye ezali lokola mwa eteni ya elanga ya matiti ya nsolo kitoko,+ manɔ́ngi ya matiti ya nsolo. Mbɛbu na ye ezali bafololo lísi, oyo ezali kotangisa mai ya mire.+

  • Yoane 19:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 Lisusu Nikodeme, moto oyo liboso ayaki epai na ye na butu, ayaki amemi rulo ya mire mpe aloe, ya litra soki nkama moko (100).+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto