Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 1:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Soki Yehova ya mampinga ye moko atikelaka biso te mwa bato oyo babiki,+ mbɛlɛ tokómi lokola Sodoma, mbɛlɛ tokokani na Gomora.+

  • Yisaya 17:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe ekosalema mpenza boye: ntango mobuki-mbuma akoyanganisa mbuma oyo etɛlɛmi naino mpe lobɔkɔ na ye ekobuka mitó ya mbuma,+ akokóma mpenza lokola moto oyo azali kolɔkɔta mitó ya mbuma na lobwaku ya patatalu ya Refaime.+

  • Yirimia 6:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: “Ya solo mpenza bakolɔkɔta batikali ya Yisraele kaka ndenge balɔkɔtaka mbuma ya nzete ya vinyo.+ Zongisá lobɔkɔ na yo lokola moto oyo azali kobuka mbuma ya vinyo na bitape oyo elíngamalíngamá ya nzete ya vinyo.”

  • Ezekiele 6:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘“Mpe ntango ekosalema, nakotikela bino bato oyo babiki na mopanga na kati ya bikólo, ntango bokopalanganisama na kati ya mikili.+

  • Mika 7:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mawa na ngai,+ mpo nakómi lokola mbuma oyo basangisi na eleko ya molunge, lokola mbuma ya vinyo oyo balɔkɔti mpe basangisi!+ Etuka ya mbuma ya vinyo ya kolya ezali te, figi ya liboso oyo molimo na ngai ekokaki koyoka mposa ezali te!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto