Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 12:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe na mokolo yango+ okoloba mpenza boye: “Ee Yehova, nakopesa yo matɔndi, mpo atako osilikelaki ngai makasi, nsukansuka, nkanda na yo ezongaki nsima,+ mpe okómaki kobɔndisa ngai.+

  • Yisaya 40:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Matá na ngomba ya molai,+ yo mwasi oyo ozali koyela Siona nsango malamu.+ Tombolá mongongo na yo makasi, yo mwasi oyo ozali koyela Yerusaleme nsango malamu.+ Tombolá yango. Kobanga te.+ Lobá na bingumba ya Yuda ete: “Nzambe na bino ye oyo.”+

  • Yirimia 31:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bakoya mpenza mpe bakoganga na esengo na esika etombwaná ya Siona+ mpe bakosepela mpo na bolamu ya Yehova,+ mpo na mbuma, mpo na vinyo ya sika,+ mpo na mafuta, mpo na bana ya bampate mpe bangɔmbɛ.+ Mpe molimo na bango ekokóma lokola elanga oyo ezwaka mai mpenza,+ mpe bakolɛmba lisusu te.”+

  • Yirimia 33:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 makɛlɛlɛ ya kosepela mpe makɛlɛlɛ ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala, mongongo ya baoyo bazali koloba ete: “Bókumisa Yehova ya mampinga, mpo Yehova azali malamu;+ mpo motema boboto na ye ezali seko na seko!”’+

      “‘Bakomema likabo ya kozongisa matɔndi na ndako ya Yehova,+ mpo nakozongisa bakangami ya mokili ndenge ezalaki na ebandeli,’+ Yehova alobi bongo.”

  • Zekaria 2:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Ee mwana mwasi ya Siona, gangá makasi mpe sepelá;+ mpo talá nazali koya,+ mpe nakofanda epai na yo,”+ yango nde liloba ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto