6 Mpo mokolo ekoya oyo bakɛngɛli na etúká ya ngombangomba ya Efraime bakobelela mpenza ete: ‘Ee bino, bótɛlɛma, mpe tómata na Siona, epai ya Yehova Nzambe na biso.’”+
23 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na mikolo yango, bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo+ bakosimba,+ ɛɛ, bakosimba mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda+ moko mpe bakoloba ete: “Tokokende na bino,+ mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”’”+