10 Mpe baoyo Yehova asikoli bakozonga+ mpe ya solo bakoya na Siona na koganga ya esengo;+ mpe esengo ekozala na motó na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Bakosepela mpe bakozala na esengo, mpe mawa ná kokimela ekokima mpenza.+
17 mpo Mwana-Mpate,+ oyo azali na katikati ya kiti ya bokonzi, akokamba+ bango, mpe akomema bango na maziba ya mai+ ya bomoi. Mpe Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango.”+
4 Mpe akopangwisa mpisoli nyonso+ na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te,+ ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.+ Makambo ya kala eleki.”+