6 Na ntango yango motɛngumi akopumbwa lokola serfe,+ mpe lolemo ya moto oyo alobaka te ekoganga na esengo.+ Mpo mai ekopunzwapunzwa na esobe, mpe mikɛli na mokili patatalu oyo ekauká.
18 Likoló ya bangomba mike oyo ezali polele nakofungola bibale, mpe maziba na katikati ya mabwaku ya patatalu.+ Nakokómisa esobe etima oyo etondi na matiti, mpe mokili oyo ezangá mai maziba ya mai.+
11 Mpe Yehova akokamba+ yo mpenza ntango nyonso+ mpe akotondisa molimo na yo ata na mokili oyo ezikaziká,+ mpe akokembisa mikuwa na yo;+ mpe okokóma lokola elanga oyo ezwaka mai mpenza,+ mpe lokola liziba ya mai, oyo mai na yango ekosaka te.