12 Mpe ya solo, akotombola elembo mpo na bikólo mpe akoyanganisa bato ya Yisraele oyo bapanzaná;+ mpe bato ya Yuda oyo bapalanganá, akoyanganisa bango uta na nsuka minei ya mabele.+
22 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá! Nakotombolela bikólo lobɔkɔ na ngai,+ mpe nakotombolela bato ya bikólo elembo na ngai.+ Mpe bakoya na bana na yo ya mibali na ntolo, mpe bakomema bana na yo ya basi na mapeka.+
10 Bóleka, bóleka na baporte. Bóbongisa nzela ya bato.+ Bótondisa mabele, bótondisa mabele na balabala monene. Bólongola mabanga na yango.+ Bótɛlɛmisela bato ya bikólo elembo.+