Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 50:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 Mpe Lofundo ekobɛta mpenza libaku mpe ekokwea,+ mpe moto ya kotɛlɛmisa yango akozala te.+ Mpe nakotya mɔtɔ na bingumba na yango, mpe ekolya zingazinga na yango nyonso.”+

  • Malaki 4:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Mpo talá! mokolo ezali koya oyo ezali kopela lokola litumbu ya mɔtɔ,+ mpe bato nyonso ya lofundo mpe baoyo nyonso basalaka makambo mabe bakokóma lokola matiti ya blé.+ Mpe mokolo oyo ezali koya ekozikisa mpenza bango,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpe yango ekotikela bango mosisa te, etape mpe te.+

  • Luka 18:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Nazali koyebisa bino ete: Moto oyo akitaki na ndako na ye amonani moyengebene+ koleka moto wana mosusu; mpo moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+

  • Yakobo 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Atako bongo, boboto monene oyo ye amonisaka ezali monene koleka.+ Yango wana elobi: “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo,+ kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”+

  • 1 Petro 5:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto