Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 16:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi Asa asilikelaki mo-moni-makambo mpe atyaki ye na ndako ya bikanga-makolo,+ mpo asilikelaki ye makasi mpo na yango.+ Mpe se na ntango yango, Asa abandaki konyata+ bato mosusu.

  • 2 Ntango 18:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na yango, mokonzi ya Yisraele alobaki na Yehoshafate ete:+ “Moto mosusu azali+ oyo tokoki kotuna Yehova na nzela na ye, kasi ngai, nayinaka ye mpenza,+ mpo mikolo na ye nyonso, asakwelaka ngai makambo ya malamu te, kaka ya mabe.+ Ezali Mikaya mwana ya Yimila.”+ Kasi Yehoshafate alobaki boye: “Mokonzi aloba ndenge wana te.”+

  • 2 Ntango 24:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe azalaki kotinda basakoli+ kati na bango mpo na kozongisa bango epai ya Yehova; mpe bazalaki kotatola mabe na bango, kasi batyaki litoi te.+

  • Yirimia 11:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Na yango, talá oyo Yehova alobi mpo na bato ya Anatote+ oyo bazali koluka molimo na yo: “Osengeli kosakola na nkombo ya Yehova te,+ noki okufa na lobɔkɔ na biso”;

  • Yirimia 26:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bongo banganga-nzambe ná basakoli babandaki koloba na bankumu mpe na bato nyonso: “Moto oyo abongi na ekateli ya liwa,+ mpo asakoli na ntina etali engumba oyo ndenge boyoki yango na matoi na bino moko.”+

  • Misala 4:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Nzokande, mpo likambo yango epalangana mingi lisusu te na kati ya bato, tóyebisa bango na makaneli ete báloba na nkombo yango lisusu na moto ata moko te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto