Yirimia 23:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Bazali koloba mbala na mbala na baoyo bazangi limemya epai na ngai ete ‘Yehova alobi boye: “Bokozala na kimya.”’+ Mpe balobi na moto nyonso oyo azali kotambola na motó makasi na ye+ ete: ‘Mpasi ata moko te ekokwela bino.’+ Ezekiele 13:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Bomoni emonaneli ya lokuta mpe kosakola makambo oyo ebombaná ya bokosi, ntango bozali koloba ete: ‘Liloba ya Yehova ezali boye,’ nzokande ngai moko nalobi eloko moko te, boye te?”’+ Mika 2:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Soki moto moko, oyo azali kolanda mopɛpɛ mpe lokuta, akosi ete:+ “Nakokweisela yo maloba mpo na vinyo mpe mpo na masanga oyo elangwisaka,” ye mpe akokóma mpenza moto oyo azali kokweisela bato oyo maloba.+ 2 Timote 4:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mpo ekozala na eleko moko oyo bakondima te mateya oyo epesaka litomba,+ kasi, na kolanda bamposa na bango moko, bakozwa bateyi ebele mpo báyokisaka bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka;+
17 Bazali koloba mbala na mbala na baoyo bazangi limemya epai na ngai ete ‘Yehova alobi boye: “Bokozala na kimya.”’+ Mpe balobi na moto nyonso oyo azali kotambola na motó makasi na ye+ ete: ‘Mpasi ata moko te ekokwela bino.’+
7 Bomoni emonaneli ya lokuta mpe kosakola makambo oyo ebombaná ya bokosi, ntango bozali koloba ete: ‘Liloba ya Yehova ezali boye,’ nzokande ngai moko nalobi eloko moko te, boye te?”’+
11 Soki moto moko, oyo azali kolanda mopɛpɛ mpe lokuta, akosi ete:+ “Nakokweisela yo maloba mpo na vinyo mpe mpo na masanga oyo elangwisaka,” ye mpe akokóma mpenza moto oyo azali kokweisela bato oyo maloba.+
3 Mpo ekozala na eleko moko oyo bakondima te mateya oyo epesaka litomba,+ kasi, na kolanda bamposa na bango moko, bakozwa bateyi ebele mpo báyokisaka bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka;+