Nzembo 76:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Yo—ozali koyokisa nsɔmɔ,+Mpe nani akoki kotɛlɛma liboso na yo mpo na makasi ya nkanda na yo?+ Yisaya 2:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Kɔtá na libanga mpe bombaná na putulu mpo na nsɔmɔ ya Yehova, mpe mosika na nkembo ya bonene na ye.+ Luka 23:30 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 30 Bongo bakobanda koloba na bangomba ete: ‘Bókwela biso!’ mpe na bangomba mike ete: ‘Bózipa biso!’+ 2 Batesaloniki 1:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Bato yango mpenza bakozwa etumbu ya lisambisi+ ya libebi ya seko+ uta na liboso ya Nkolo mpe uta na nkembo ya bokasi na ye,+ Emoniseli 6:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Mpe bakonzi ya mabele, ná bato ya bibonga minene, ná bakomanda ya basoda, ná bazwi, ná bato ya makasi, ná moombo nyonso, ná moto nyonso ya bonsomi bamibombaki na kati ya mibenga mpe na kati ya mabanga+ ya bangomba.
10 Kɔtá na libanga mpe bombaná na putulu mpo na nsɔmɔ ya Yehova, mpe mosika na nkembo ya bonene na ye.+
9 Bato yango mpenza bakozwa etumbu ya lisambisi+ ya libebi ya seko+ uta na liboso ya Nkolo mpe uta na nkembo ya bokasi na ye,+
15 Mpe bakonzi ya mabele, ná bato ya bibonga minene, ná bakomanda ya basoda, ná bazwi, ná bato ya makasi, ná moombo nyonso, ná moto nyonso ya bonsomi bamibombaki na kati ya mibenga mpe na kati ya mabanga+ ya bangomba.