-
2 Bakonzi 23:4Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 Mpe mokonzi atindaki lisusu nganga-nzambe monene Hilikiya+ mpe banganga-nzambe oyo balandi ye mpe bakɛngɛli ya baporte+ bábimisa na tempelo ya Yehova bisaleli nyonso oyo basalelá Baala,+ nzete ya losambo+ mpe limpinga nyonso ya likoló.+ Na nsima, atumbaki yango libándá ya Yerusaleme na mikala ya bilanga ya lobwaku ya Kidrone+ mpe akendaki na putulu na yango na Betele.+
-
-
2 Ntango 34:4Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 Lisusu, babukaki liboso na ye bitumbelo+ ya Babaala;+ mpe akataki bitumbelo ya mpaka ya malasi+ oyo ezalaki likoló na yango; mpe abukabukaki banzete ya losambo+ mpe bikeko oyo eyemami+ mpe bikeko ya ebende oyo enyangwisami mpe akómisaki yango putulu,+ mpe na nsima, amwangisaki putulu yango na malita ya baoyo bazalaki kopesa yango mbeka.+
-