Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 7:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Tɛlɛmá, Ee Yehova, na nkanda na yo;+

      Tɛmɛlá kotomboka ya nkanda makasi ya baoyo bazali banguna na ngai,+

      Mpe lamuká mpo na ngai,+ mpo opesi mitindo mpo na lisambisi.+

  • Mika 1:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo talá! Yehova azali kobima na esika na ye,+ mpe akokita mpenza mpe akotambola na bisika oyo etombwaná ya mabele.+

  • Baebre 12:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Na ntango yango mongongo na ye eningisaki mabele makasi,+ kasi sikoyo apesi elaka, alobi: “Etikali mbala moko lisusu oyo nakoningisa kaka mabele te kasi mpe likoló.”+

  • 2 Petro 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nzokande mokolo ya Yehova+ ekoya lokola moyibi+ mpe na mokolo yango likoló ekoleka+ na lokito makasi,+ kasi biloko na yango lokola ekokóma mɔtɔ makasi ekosilela,+ mpe mabele+ mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele.+

  • Emoniseli 16:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe mikalikali ebimaki, mpe mingongo eyokanaki, mpe bankake ebɛtaki, mpe mabele eninganaki makasi mpenza+ na ndenge oyo esalemá naino te banda bato bazali na mabele,+ mabele eninganaki makasi,+ makasi mpenza.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto