Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Yango wana Yehova akosepela ata na bilenge mibali na bango te,+ mpe akoyoka mawa te mpo na bana na bango oyo batata bakufá mpe basi na bango oyo mibali bakufá; mpo bango nyonso bazali bapɛngwi+ mpe basali-mabe mpe monɔkɔ nyonso ezali koloba makambo ya bozoba. Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka.+

  • Yisaya 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nakotinda ye akende kobunda na ekólo oyo epɛngwi,+ mpe nakopesa ye mitindo mpo na kobunda na bato ya nkɛlɛ na ngai,+ mpo na kobɔtɔla biloko mingi mpe kopunza biloko mingi mpe kokómisa yango esika ya konyatanyata lokola mabele ya lima ya babalabala.+

  • Yisaya 32:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 mpo zoba akoloba makambo ya bozoba,+ mpe motema na ye ekokana kosala makambo oyo eyokisaka mpasi,+ mpo na kopɛngwa+ mpe kolobela Yehova makambo ya bokosi, mpo na kotika molimo ya moto oyo azali na nzala libumu polele,+ mpe azali kotika moto oyo azali na mposa ya mai azanga eloko ya komɛla.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto