Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 8:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Alongaki lisusu Bamoabe+ mpe amekaki bolai ya molɔngɔ na bango na nsinga moko; alalisaki bango na mabele, mpo ameka bolai ya nsinga mbala mibale mpo na koboma bango, kasi bolai ya nsinga moko mpo na kotika bango na bomoi;+ bongo Bamoabe bakómaki basaleli+ ya Davidi mpo báyelaka ye mpako na bango.+

  • 2 Bakonzi 21:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe ya solo, nakosembolela Yerusaleme nsinga ya komeka+ oyo basalelaki mpo na komeka Samaria,+ mpe nivo oyo basalelaki mpo na ndako ya Ahaba;+ mpe nakosukola+ mpenza Yerusaleme ndenge moto asukolaka kibakuli oyo ezangá mabɔkɔ, asukoli yango mpe abaloli yango.+

  • Yisaya 28:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe epai na bango liloba ya Yehova ekokóma solo “mobeko likoló ya mobeko, mobeko likoló ya mobeko, nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka, nsinga ya komeka likoló ya nsinga ya komeka,+ awa moke, kuna moke,” mpo bákende mpe bábɛta mpenza libaku mpe bákwea makalekale mpe bábukana mpenza mpe bázwama na motambo mpe bákangama.+

  • Bileli 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Yehova azwi likanisi ya kobebisa efelo+ ya mwana mwasi ya Siona.

      Atandi nsinga ya komeka bolai.+ Azongisi lobɔkɔ na ye nsima te ete atika komɛla.+

      Azali kolelisa mwa ngomba oyo basalá mpo na libateli mpe azali kolelisa efelo.+ Yango nyonso elɛmbilɛmbi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto