Yisaya 1:23 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 Bankumu na yo bazali motó makasi mpe bazali baninga ya miyibi.+ Mokomoko na bango azali moto oyo alingá kanyaka+ mpe moto oyo alandelaka makabo.+ Bazali kokata na bosembo te likambo ya mwana oyo tata akufá; mpe ata likambo ya mwasi oyo mobali akufá ekómelaka bango te.+ Yirimia 5:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Lokola mwa ndako ya bibwɛlɛ oyo etondi na bikelamu oyo epumbwaka, bobele bongo bandako na bango etondi na bokosi.+ Yango wana bakómi minene mpe bazali kozwa bomɛngo.+ Amose 4:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 “Bóyoka liloba oyo, bino bangɔmbɛ-basi ya Bashane,+ oyo bozali na ngomba ya Samaria,+ oyo bozali kobuba bato bazangá,+ oyo bozali konyata babola, oyo bozali koloba na bankolo na bango ete: ‘Yaká na yango, mpe tiká tómɛla!’ Mika 2:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Mpe baluli bilanga mpe babɔtɔli yango;+ ná bandako lokola, mpe bazwi yango; mpe babubi mobali makasi ná bato ya ndako na ye,+ moto ná libula na ye.+ Mika 6:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Biloko ya motuya ya makambo mabe+ mpe efa oyo ekɔndá, oyo elakelami mabe, ezali nde naino kati na ndako ya moto mabe?
23 Bankumu na yo bazali motó makasi mpe bazali baninga ya miyibi.+ Mokomoko na bango azali moto oyo alingá kanyaka+ mpe moto oyo alandelaka makabo.+ Bazali kokata na bosembo te likambo ya mwana oyo tata akufá; mpe ata likambo ya mwasi oyo mobali akufá ekómelaka bango te.+
27 Lokola mwa ndako ya bibwɛlɛ oyo etondi na bikelamu oyo epumbwaka, bobele bongo bandako na bango etondi na bokosi.+ Yango wana bakómi minene mpe bazali kozwa bomɛngo.+
4 “Bóyoka liloba oyo, bino bangɔmbɛ-basi ya Bashane,+ oyo bozali na ngomba ya Samaria,+ oyo bozali kobuba bato bazangá,+ oyo bozali konyata babola, oyo bozali koloba na bankolo na bango ete: ‘Yaká na yango, mpe tiká tómɛla!’
2 Mpe baluli bilanga mpe babɔtɔli yango;+ ná bandako lokola, mpe bazwi yango; mpe babubi mobali makasi ná bato ya ndako na ye,+ moto ná libula na ye.+
10 Biloko ya motuya ya makambo mabe+ mpe efa oyo ekɔndá, oyo elakelami mabe, ezali nde naino kati na ndako ya moto mabe?