Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 15:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nani kati na banzambe azali lokola yo, Ee Yehova?+

      Nani azali lokola yo, yo oyo oleki bosantu?+

      Ye oyo basengeli kobanga+ na nzembo ya lisanzoli,+ Ye oyo asalaka makambo ya kokamwa.+

  • Nzembo 71:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Ngai mpe, nakokumisa yo na ebɛtɛlo ya nsinga,+

      Ee Nzambe na ngai, mpo na bosolo na yo.+

      Ee Mosantu ya Yisraele,+ nakobɛtɛla yo mondule na nzɛnzɛ.

  • Yisaya 5:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Yango wana, se ndenge lolemo ya mɔtɔ elyaka matiti ya blé+ mpe matiti oyo ekauká ezindaka na kati ya ndemo ya mɔtɔ, ekumu ya misisa na bango ekokóma lokola nsolo moko ya mabe,+ mpe fololo na bango ekomata lokola pudre, mpo baboyi mobeko ya Yehova ya mampinga,+ mpe bazangi limemya na liloba ya Mosantu ya Yisraele.+

  • Yisaya 10:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo yango: baoyo bakotikala na Yisraele+ mpe baoyo babiki na ndako ya Yakobo bakoluka lisusu lisalisi te epai na ye oyo azali kobɛta bango,+ mpe bakoluka mpenza lisalisi epai ya Yehova, Mosantu ya Yisraele,+ na bosolo.+

  • Yirimia 51:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpo Yisraele mpe Yuda,+ Nzambe na bango, Yehova ya mampinga, atiki bango te lokola basi oyo mobali akufá.+ Mpo na miso ya Mosantu ya Yisraele, mokili ya Bakaladea etondi na ngambo.+

  • Ezekiele 39:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe nakosala ete nkombo na ngai mosantu eyebana na kati ya bato na ngai Yisraele, mpe nakotika lisusu te ete bákómisa nkombo na ngai mosantu eloko mpamba;+ mpe bikólo bakoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ Mosantu na Yisraele.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto